audio
audioduration (s) 1.16
61.6
| text
stringlengths 2
294
| source
stringclasses 3
values |
|---|---|---|
moto oyo azongiseli ye ete ekosala eloko moko te
|
LRSC
|
|
nazali na machine
|
LRSC
|
|
amituni bazalaki kotiya bakatini boni ya mayi
|
LRSC
|
|
fkm akamwe na mindele pe basalaka coop
|
LRSC
|
|
moto yango ayebisi ye ebongo yo okanisi coop ewuta wapi
|
LRSC
|
|
mpo na kokotisa badossier na ambassade ya belgique ezalaki nde likambo
|
LRSC
|
|
bokoya na ntongo makasi
|
LRSC
|
|
mpe bakoyamba bobele bato tuku mibale na mokolo moko
|
LRSC
|
|
bamisusu bozonga lobi
|
LRSC
|
|
mokolo ya liboso fkm akomi wana na ba six heure ya ntongo
|
LRSC
|
|
akuti deja bato vingt basi bakokaki
|
LRSC
|
|
aye kozonga mokolo ya mibale na cinq heures
|
LRSC
|
|
akuti bato basi bakoki
|
LRSC
|
|
ezali koyela ye lisusu te
|
LRSC
|
|
amilobeli mais bato oyo bakomaka awa ntango nini
|
LRSC
|
|
mokolo ya misato fkm
|
LRSC
|
|
akomi lisusu na cinq heures kasi eloko te
|
LRSC
|
|
mama na ye alobi na ye ekomi lokola lisolo oyo balobaka na bible
|
LRSC
|
|
bato oyo bazalaki na maladi ya maba lepre bazalaka kokende kozela anzelu ya nzambe na mayi ya siloe
|
LRSC
|
|
soki okomi na ntango anzelu alekaka obiki
|
LRSC
|
|
soki ozangi okozela mobu mosusu kaka na periode oyo ye alekaka
|
LRSC
|
|
babukani na koseka
|
LRSC
|
|
banda mokolo wana mpo na kosolola lisolo ya ambassade ya belgique mama na ye akomaki kobenga yango siloe
|
LRSC
|
|
na ndenge ya code
|
LRSC
|
|
azwi solution nakobanda kotiya mayi muke muke
|
LRSC
|
|
bana ya mama leki ya fkm
|
LRSC
|
|
alobi ete akende kolala epayi na bango
|
LRSC
|
|
na bongo na ba quatre heures ya ntongo akende
|
LRSC
|
|
na ba vingttrois heures ye wana nzela ya ville
|
LRSC
|
|
na butu centreville ya kinshasa ezalaka na kobanga
|
LRSC
|
|
okomona ata moto na nzela te
|
LRSC
|
|
bato banso oyo bayaka mosala bazongi deja na bacommunes misusu mpe gombe etikali kimia
|
LRSC
|
|
azwi taxibus oyo ezalaki kokende victoire
|
LRSC
|
|
mpo oyo ya zando ezalaki lisusu te
|
LRSC
|
|
babrique ekotaka mayi mingi te sinon grand nteba mystique
|
LRSC
|
|
na victoire azwi taxi ya ville
|
LRSC
|
|
akiti na boulevard kaka liboso ya esika bandeko na ye bafandaka
|
LRSC
|
|
akoti na immeuble yango
|
LRSC
|
|
lokola ascenceur esi ekufa amati tii na etage ya minei na makolo
|
LRSC
|
|
azalaki kokanisa na lombango na ndenge ete ntango moto oyo akutuna ye mituna abima elema te
|
LRSC
|
|
amituni lisusu saki moko ekobimisa babrique bon
|
LRSC
|
|
na motuna wana azwi eyano te
|
LRSC
|
|
akati na mokuse mafu
|
LRSC
|
|
nakosangisa ndenge ekobima ebimi
|
LRSC
|
|
ye mutu akoyeba
|
LRSC
|
|
zela nasilisa kotala makambo ya zelo nde natali likambo na yo
|
LRSC
|
|
ntango basilisi kobwaka zelo patron abengi ye
|
LRSC
|
|
yo nkombo na yo nani
|
LRSC
|
|
ozali zairois
|
LRSC
|
|
bino bazairois bozalaka mindondo mingi
|
LRSC
|
|
obandi mosala malamu lobi ekokoma saki ya ciment ebungi otekisi pawu mpe bongo na bongo
|
LRSC
|
|
te chef ngai nazali moyibi te
|
LRSC
|
|
bolobaka kaka bongo
|
LRSC
|
|
ata ozali moyibi okondima
|
LRSC
|
|
na emission keba na camera ya georges embana bozangaka
|
LRSC
|
|
mayele ya koloba ezali te
|
LRSC
|
|
ayoki mwa esengo kasi na motema amilobeli makambu misusu namilukelaka
|
LRSC
|
|
emission wana ezalaki kopesa bato banso na kinshasa nkanda
|
LRSC
|
|
on dirait que journaliste wana azalaki na mposa ya kobimisa bazairois bato mabe na miso ya bacongolais ya ngambo
|
LRSC
|
|
ezalaki mpe na bambala misusu azalaki na elonga na ye
|
LRSC
|
|
aboyi kotiya nntembe
|
LRSC
|
|
ye azalaki koluka mosala
|
LRSC
|
|
ayaki wana lokola depute ya bazairois te
|
LRSC
|
|
na botosi bonso ayanoli ete ngai nakoyiba eloko moko te
|
LRSC
|
|
soki oyibi eloko awa okosuka na la police
|
LRSC
|
|
na nkanda nsoni mpe mawa kasi akangi bobele motema
|
LRSC
|
|
kende na depot
|
LRSC
|
|
oyo lisusu coop nini
|
LRSC
|
|
biloko ya mosala ezali na coin
|
LRSC
|
|
tala ndenge fkm akomaki mobeti brique ya mbalakaka
|
LRSC
|
|
atikalaka kokanisa ata mokolo moko te ete ye akobeta brique
|
LRSC
|
|
naino mpe amema saki ya ciment ya mobimba ye moko te
|
LRSC
|
|
akangi bobele motema abimisi saki yango
|
LRSC
|
|
ntango abwaki yango na mabele ayoki neti mokongo molingi mokatana na ndambo mibale
|
LRSC
|
|
patron ayebisi ete nalingi obimisaka quarante briques par sac
|
LRSC
|
|
abaloli saki ya liboso
|
LRSC
|
|
abeti
|
LRSC
|
|
estce que ngai nayebi kobeta babrique
|
LRSC
|
|
akokisi babrique tuku minei kasi amoni ete etikali eboke ya ciment oyo ekokaki kobimisa ata brique libwa
|
LRSC
|
|
alobi eloko te
|
LRSC
|
|
akeyi mbango kozwa saki ya mibale
|
LRSC
|
|
akitisi quantite ya zelo mpe asangisi na oyo etikalaki
|
LRSC
|
|
na boye mokonzi amoni te ete alekisaki ndelo ya zelo
|
LRSC
|
|
asali mokolo mobimba kino na mpokwa
|
LRSC
|
|
ntango mosala mosili asukoli bobele makolo mpe elongi lokola bamacon basalaki mpe azongi epayi ya moninga na ye moro
|
LRSC
|
|
abeteli moro lisolo mpe balali na koseka
|
LRSC
|
|
ata ko azalaki koyoka mpasi nzoto mobimba azalaki na esengo mpo azwaki mosala
|
LRSC
|
|
asalaki na mosala ya kobeta brique mpe kosalisa batongi sanza motoba mobimba
|
LRSC
|
|
nakoya kotiela mutuangani grand zelo akolapa
|
LRSC
|
|
na bongo alongwaki epayi ya moro mpe akomaki kofutela oyo ya ye ndako
|
LRSC
|
|
soki moto azali kokende kinshasa azalaki kozanga te kotindela libota mpe miraesa mwa moke oyo azalaki komonana na yango
|
LRSC
|
|
ntango mosala mona mosilaki azwaki lisusu esika mosusu kaka ya kobeta brique
|
LRSC
|
|
lokola makanisi ma ye mazalaki ya kokende na poto azalaki mpe moke moke kobomba mosolo mpo ete akokisa mbongo ya ticket ya poto
|
LRSC
|
|
okoki kondima te elikya oyo azalaki na yango
|
LRSC
|
|
ata mbongo yango ezalaki kosenga ye asala ekonzo ata ya mbula mitano ye alembaki te
|
LRSC
|
|
ntango mosala oyo ya mibale esili na nsima ya mbula moko ayoki mposa ya kokende kotala libota na kinshasa
|
LRSC
|
|
bayokani ye na moro mpo bakende kinshasa mpo na poso mibale
|
LRSC
|
|
basombi bilamba basapato mpe biloko misusu
|
LRSC
|
|
quartier mobimba mobukanaki mokolo bakomaki
|
LRSC
|
|
abandi kokanisa ndenge azalaka komona babeti ya brique bazalaki kosala saki moko ya ciment mopiko ya zelo
|
LRSC
|
End of preview. Expand
in Data Studio
README.md exists but content is empty.
- Downloads last month
- 36