audio audioduration (s) 1.16 61.6 | text stringlengths 2 294 | source stringclasses 3 values |
|---|---|---|
moto oyo azongiseli ye ete ekosala eloko moko te | LRSC | |
nazali na machine | LRSC | |
amituni bazalaki kotiya bakatini boni ya mayi | LRSC | |
fkm akamwe na mindele pe basalaka coop | LRSC | |
moto yango ayebisi ye ebongo yo okanisi coop ewuta wapi | LRSC | |
mpo na kokotisa badossier na ambassade ya belgique ezalaki nde likambo | LRSC | |
bokoya na ntongo makasi | LRSC | |
mpe bakoyamba bobele bato tuku mibale na mokolo moko | LRSC | |
bamisusu bozonga lobi | LRSC | |
mokolo ya liboso fkm akomi wana na ba six heure ya ntongo | LRSC | |
akuti deja bato vingt basi bakokaki | LRSC | |
aye kozonga mokolo ya mibale na cinq heures | LRSC | |
akuti bato basi bakoki | LRSC | |
ezali koyela ye lisusu te | LRSC | |
amilobeli mais bato oyo bakomaka awa ntango nini | LRSC | |
mokolo ya misato fkm | LRSC | |
akomi lisusu na cinq heures kasi eloko te | LRSC | |
mama na ye alobi na ye ekomi lokola lisolo oyo balobaka na bible | LRSC | |
bato oyo bazalaki na maladi ya maba lepre bazalaka kokende kozela anzelu ya nzambe na mayi ya siloe | LRSC | |
soki okomi na ntango anzelu alekaka obiki | LRSC | |
soki ozangi okozela mobu mosusu kaka na periode oyo ye alekaka | LRSC | |
babukani na koseka | LRSC | |
banda mokolo wana mpo na kosolola lisolo ya ambassade ya belgique mama na ye akomaki kobenga yango siloe | LRSC | |
na ndenge ya code | LRSC | |
azwi solution nakobanda kotiya mayi muke muke | LRSC | |
bana ya mama leki ya fkm | LRSC | |
alobi ete akende kolala epayi na bango | LRSC | |
na bongo na ba quatre heures ya ntongo akende | LRSC | |
na ba vingttrois heures ye wana nzela ya ville | LRSC | |
na butu centreville ya kinshasa ezalaka na kobanga | LRSC | |
okomona ata moto na nzela te | LRSC | |
bato banso oyo bayaka mosala bazongi deja na bacommunes misusu mpe gombe etikali kimia | LRSC | |
azwi taxibus oyo ezalaki kokende victoire | LRSC | |
mpo oyo ya zando ezalaki lisusu te | LRSC | |
babrique ekotaka mayi mingi te sinon grand nteba mystique | LRSC | |
na victoire azwi taxi ya ville | LRSC | |
akiti na boulevard kaka liboso ya esika bandeko na ye bafandaka | LRSC | |
akoti na immeuble yango | LRSC | |
lokola ascenceur esi ekufa amati tii na etage ya minei na makolo | LRSC | |
azalaki kokanisa na lombango na ndenge ete ntango moto oyo akutuna ye mituna abima elema te | LRSC | |
amituni lisusu saki moko ekobimisa babrique bon | LRSC | |
na motuna wana azwi eyano te | LRSC | |
akati na mokuse mafu | LRSC | |
nakosangisa ndenge ekobima ebimi | LRSC | |
ye mutu akoyeba | LRSC | |
zela nasilisa kotala makambo ya zelo nde natali likambo na yo | LRSC | |
ntango basilisi kobwaka zelo patron abengi ye | LRSC | |
yo nkombo na yo nani | LRSC | |
ozali zairois | LRSC | |
bino bazairois bozalaka mindondo mingi | LRSC | |
obandi mosala malamu lobi ekokoma saki ya ciment ebungi otekisi pawu mpe bongo na bongo | LRSC | |
te chef ngai nazali moyibi te | LRSC | |
bolobaka kaka bongo | LRSC | |
ata ozali moyibi okondima | LRSC | |
na emission keba na camera ya georges embana bozangaka | LRSC | |
mayele ya koloba ezali te | LRSC | |
ayoki mwa esengo kasi na motema amilobeli makambu misusu namilukelaka | LRSC | |
emission wana ezalaki kopesa bato banso na kinshasa nkanda | LRSC | |
on dirait que journaliste wana azalaki na mposa ya kobimisa bazairois bato mabe na miso ya bacongolais ya ngambo | LRSC | |
ezalaki mpe na bambala misusu azalaki na elonga na ye | LRSC | |
aboyi kotiya nntembe | LRSC | |
ye azalaki koluka mosala | LRSC | |
ayaki wana lokola depute ya bazairois te | LRSC | |
na botosi bonso ayanoli ete ngai nakoyiba eloko moko te | LRSC | |
soki oyibi eloko awa okosuka na la police | LRSC | |
na nkanda nsoni mpe mawa kasi akangi bobele motema | LRSC | |
kende na depot | LRSC | |
oyo lisusu coop nini | LRSC | |
biloko ya mosala ezali na coin | LRSC | |
tala ndenge fkm akomaki mobeti brique ya mbalakaka | LRSC | |
atikalaka kokanisa ata mokolo moko te ete ye akobeta brique | LRSC | |
naino mpe amema saki ya ciment ya mobimba ye moko te | LRSC | |
akangi bobele motema abimisi saki yango | LRSC | |
ntango abwaki yango na mabele ayoki neti mokongo molingi mokatana na ndambo mibale | LRSC | |
patron ayebisi ete nalingi obimisaka quarante briques par sac | LRSC | |
abaloli saki ya liboso | LRSC | |
abeti | LRSC | |
estce que ngai nayebi kobeta babrique | LRSC | |
akokisi babrique tuku minei kasi amoni ete etikali eboke ya ciment oyo ekokaki kobimisa ata brique libwa | LRSC | |
alobi eloko te | LRSC | |
akeyi mbango kozwa saki ya mibale | LRSC | |
akitisi quantite ya zelo mpe asangisi na oyo etikalaki | LRSC | |
na boye mokonzi amoni te ete alekisaki ndelo ya zelo | LRSC | |
asali mokolo mobimba kino na mpokwa | LRSC | |
ntango mosala mosili asukoli bobele makolo mpe elongi lokola bamacon basalaki mpe azongi epayi ya moninga na ye moro | LRSC | |
abeteli moro lisolo mpe balali na koseka | LRSC | |
ata ko azalaki koyoka mpasi nzoto mobimba azalaki na esengo mpo azwaki mosala | LRSC | |
asalaki na mosala ya kobeta brique mpe kosalisa batongi sanza motoba mobimba | LRSC | |
nakoya kotiela mutuangani grand zelo akolapa | LRSC | |
na bongo alongwaki epayi ya moro mpe akomaki kofutela oyo ya ye ndako | LRSC | |
soki moto azali kokende kinshasa azalaki kozanga te kotindela libota mpe miraesa mwa moke oyo azalaki komonana na yango | LRSC | |
ntango mosala mona mosilaki azwaki lisusu esika mosusu kaka ya kobeta brique | LRSC | |
lokola makanisi ma ye mazalaki ya kokende na poto azalaki mpe moke moke kobomba mosolo mpo ete akokisa mbongo ya ticket ya poto | LRSC | |
okoki kondima te elikya oyo azalaki na yango | LRSC | |
ata mbongo yango ezalaki kosenga ye asala ekonzo ata ya mbula mitano ye alembaki te | LRSC | |
ntango mosala oyo ya mibale esili na nsima ya mbula moko ayoki mposa ya kokende kotala libota na kinshasa | LRSC | |
bayokani ye na moro mpo bakende kinshasa mpo na poso mibale | LRSC | |
basombi bilamba basapato mpe biloko misusu | LRSC | |
quartier mobimba mobukanaki mokolo bakomaki | LRSC | |
abandi kokanisa ndenge azalaka komona babeti ya brique bazalaki kosala saki moko ya ciment mopiko ya zelo | LRSC |
Subsets and Splits
No community queries yet
The top public SQL queries from the community will appear here once available.